Lelo pene ya sanza mibale na engumba Kisangani, likambo ya carburant e zo zala bobele kokoso. Mpo na ko zwa carburant e sengeli ko fanda na molongo uta tongo ti pokwa.

Nzoka nde na e bandeli ya bozangi oyo ya carburant, mwana mboka Louis Marie Walle Lofungola, gouverneur ya egumba ya Tshopo, a sangisaki ba Khadafi nioso mpe e lobamaki ete, ba sili ko zwa motindo moko mpo na likambo ena. Kasi, oyo e zali ko salema na egumba ya Kisangani mpo na carburant, e zo landana na maye e lobamaki te. Ba stations misusu e zo fungola te, talo ya carburant e zali ko mata kaka.
To zali ko mi tuna soki e za likambo ya bo zangi carburant, to mpe likambo ya taxe ? Kasi to sengi na ba konzi ya mboka ba lukela biso solution.
