5 juin 2023
Ville de Kisangani, RD Congo
Politique

Tshopo : « Tshopo eko bonga té soki ko zanga boyokani ezo koba » (Theoveul Lotika)

Molobeli ya Bana ya Tshopo, mwana mboka Theoveul Lotika, akutanaki na panzi sango mokolo ya 18 août 2022, mpona ko solola makambu maye matali mobulu oyo ezalali ko lekana o kati ya Assemblée provinciale ya Tshopo, ko banda n’a sanza ya juin 2019, ko leka na maponami ya gouverneur tii kino lelo.

Ko landa maloba ma ye, Theoveul Lotika alobelaki makambo maye matali ko zanga boyokani na kati ya n’a kati ya etuka ya bokambi ya liboso na kati ya mboka.

Ezali na ba ndeko na biso ba lobeli ya peuple oyo ba lingi té Tshopo ebonga, ya ngo ba zali ko luka ete bokabwani bozala o kati na biso. Na yango nq sengi na bakambi ya sika (gouverneur) ba kota na buzoba wana te, ba luka naino kimia o kati ya ba tshopolais, mpo ete e sunga mpepo ya Tshopo na lolenge esengeli.

e lobi Lotika.

Na motuna yako yeba soki mwana mboka Theoveul Lotika ako zala candidat na maponami ya bakambi ya bureau, ye alobi boye :

Nako tia mutu na maponami maye matali bureau té, kasi mbala oyo nazongeli mosala mwa nga yako lobela bana ya Tshopo, toko beta maboko soki esengeli ndakisa soki mabe ekoti toko loba yango makasi.

Asukisaki nako senga na bana ya Tshopo bazala elongo, basangisa mayele, mpo na tombwa ya mboka na biso.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *