Mobu mwa kelasi 2025–2026 ebandi na territoire ya Kalehe o etuka ya Sud-Kivu. Uta lundi 1er septembre, bayekoli mpe balakisi bazongi na kelasi, koyanola na libiangi lia bakonzi ba mboka Congo.
Kasi balakisi mingi balobi ete batikali kozela eyano ya mbulamatari mpo na kofuta lifuti lia bango oyo bafutamaki te. Atako bazali kotya na esika ya liboso lotomo la kotánga kelasi, bazali kotyola likambo moko ya mpasi oyo ezali mpe kotungisa bana ba bango moko, oyo bazali kozanga biloko bia kelasi.
Bana na biso bakoki kozonga kelasi te. Tozali na mbongo te mpo na kosombela bango ba cahiers to ba uniformes.
elobi molakisi moko
Kozongela kelasi na Kalehe ezali kolakisa bokasi bwa mosala mwa molakisi. Kasi, esengeli nokinoki eyano ya mbulamatari mpo na kosala ete bato banso bázonga na kelasi na bosembo mpe na lokumu, elobi Bahati Matabaro, momonisi ya syndicat ya balakisi na zone éducative ya Kalehe 3.
