1 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Lisanga

Mbula ya Kinshasa : mbulamatari epesi motango ya bato bakufi

Na pokwa ya mokolo ya lomingo oyo (15 juin), vice-Premier ministre ya Intérieur Jacquemain Shabani akambaki bokutani bwa botali nsima na mbula makasi oyo enokaki o engumba Kinshasa mokolo ya mitano ya mposo eleki (cendredi).

Bokutani boye bosangisaki tata moyangeli ya Kinshasa, bayi mbulamatari na ye, mpe bato ya mayele (experts). Nsima na bokutani boye, mokambi ya Kinshasa asakoli motango ya bato ntuku mibale na libwa (29) bakufi mpo na mwa ntango mpe mbeba ya monene ya biloko.

Nsima na yango, Daniel Bumba asakoli bozongisi misala ya bozongisi na nzela ya Okito (Pigeon Binza) mpe Tourisme (Nzela ya mayi) o etando ya Ngaliema.

Lisusu, tata moyangeli alakisaki ete mbulamatari ya Congo ezwi mokano ya kopesa lisungi na baye bazwaki mpasi na mbula ya mabe.

Basengi na bavandi na bisika biye biyebani lokola ya likama mingi ete bazwa bibongiseli mosusu ya bokebi.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *