3 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Politique

Politiki : mpo na ko zala na ngwende mibale, Franck Diongo ako funda Joseph Kabila

Franck Diongo a zalaki le 29 septembre 2020 oyo na lisolo na ba ndeko ba panzi sango ya 7sur7 mpo na ko sosolisa ete na mikolo eko ya, ba avocats ya engumba politiki wa ye (MLP) ba ko funda Joseph Kabila na Cours de Cassation.

Mokonzi ya parti politique Mouvement Lumumbiste Progressiste (MLP) a lakisi ete Kabila a zali ko tosa buku enene ya mboka te (la constitution), oyo e pekisi na moto nyoso ko zala na ngwende ibale (deux statuts). A sosolisi lisusu ete Kabila a zuaka mbongo neti mokonzi ya ekolo ya kala, oyo e zali mibeko eko tosaka buku enene ya ekolo te, mpe lisusu neti « sénateur à vie » na suka a bakisi ete mbongo nyoso a zua neti Mokonzi ya kala ya mboka e sengeli e zonga na libenga ya mboka (trésor public).

Kaka na kati ya masolo ena, Franck Diongo a talisi ete soki Sénat e boyi ko longola ba immunité ya Kabila, ba ko lekisa bongo likambo oyo na CPI, mpo na mabe nyoso Kabila a sala na tangu ya bokonzi naye.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *