FECOFA esakoli bolongolami bwa Afimico Pululu mpe Grady Diangana, oyo bazoki na masano ma suka basanaki, mpe na yango bakoki lisusu kozala elongo na basani basusu ya ba Léopards te.
Mpo na kozwa esika na bango, molakisi Sébastien Desabre abengi Brian Cipenga (CD Castellón, Espagne) mpe Jackson Muleka (Konyaspor, Turquie). Basani baye mibale bakosangana na basusu mpo na masano mazali koya.
Ekipi ya ekolo ya RDC ekosana liboso lia Togo mokolo mwa zomi ya sanza ya zomi oyo na Lomé, yambo ya koyamba Soudan na Kinshasa mokolo mwa zomi na minei ya sanza oyo kaka, mpo na koluka nzela ya Coupe du Monde.
