Likambo ya libala epayi ya ba ndeko na biso basi ya Kisangani ekomi likambo yako kamwa.
Na ntango ya kala, libala ezalaka eloko ya motuya o’kati ya libota pe na miso ma bato. Kasi lelo oyo, libala ekoma neti eloko ya tembe entre les filles.
Oko mona bango naba uniformes ya liputa ya libala ya moninga nabango, ba images naba statuts whatsapp mpe facebook… Mais toko yoka na sima que mobali wana aboyi ye, libala ekufi, bref, baza lisusu ensemble te. Nyoso wana kaka po mwasi a bali po a lakisa ba ninga na ye ke a tuli te.
Eza kopesa pasi mpe mawa o mitema, ko tala lolenge ba ndeko basi bazali ko yokisa mabota nabango soni o miso ma bato.
Ba ndeko basi, bo zela ngonga malamu yako bala e koka, pamba te libala ezali likambo ya bomoyi mobimba. Bo tika ko zala pressées pe complexées !
Richard Elenga
