Bilenge o kati ya eklezia katolico ba kutanaki mokolo ya mineyi mwa tuku misato sanza ya zomi na mibale (jeudi 31 décembre) o kati ya milulu miye to bengi na lopoto ya lifalansa « tribune d’expression populaire », oyo e salamaki o ndako enene ya eklezia Chris- Roi o etando ya Mangobo.
O nteyi ya milulu ena, motelemeli ya bilenge o kati ya archidiocèse ya Kisangani, ye meyi abbé Matthieu Wanameme, a pesaki bilenge na bozindo nyoso ya maye mi tali lisapo to « histoire » ya archidiocèse ya bango, wana, o kati ya milulu miye mi tali bosepeli mobu kama yoko tuku mibale na mitano ya bopanzi sango elamu o kati ya archidiocèse ya Kisangani (125 ans d’évangélisation).
Sima nango, bilenge na tango na bango ba pesaki batoli bwa bango mpona maye matali oyo nyoso e koki bebisa mboka, ndakisa mobulu mwa bolenge to mpe « délinquance juvénile » na lifalansa. Ba pesi na bayi mibeko lolenge eye ba koki ko salela mpona ko sukisa likambo ena epayi ya bilenge baye ba zali ko zangisa o kati ya ba etando ya engumba Kisangani kimia na bobotoli biloko mpe koyiba biloko bia batu na lolenge ndenge na ndenge.

Mpona yango, bilenge ba sengi na bakonzi ya mboka ba sunga bango na bopesi bango misala mpe na ko tiyaka maboko na moto nyoso ako kweyi na mbeba ya moyibi mpe botungisi ndenge na ndenge. Bango meyi bilenge ba sengi ko yekola misala mike mike ya maboko mpona ko yeba ko misunga.
To yeba ate milulu ena e kambemaki na Réseau des Associations des Jeunes okati ya Aumônerie de Jeunes de Kisangani (RAJ-AJAK) elongo moko na projet Tufaulu pamoja (ko longa esika yoko) na kati ya milulu ya bolengeli Noël ya bilenge oyo e kozala mokolo mwa zomi na nsambo ya sanza ya yambo (17 janvier) oyo e kozala na eklezia Santu Polo.