Tata moko abomami mpe bana ba ye sambo (7) bakangami nsima na bokɔti ya sika ya batomboki ya ADF na butu ya mokolo ya mposo kino lundi 11 juillet 2022 na mboka ya Banyali-Tchabi, territoire ya Irumu na Ituri.
Engebene na mokonzi ya mboka, batomboki bayaki mwa moke liboso mpo na kobundisa esika moko mpo na bato oyo balongolamaki na bisika na bango kasi mampinga ya bosembo babenganaki bango yambo ya kotya sinyatili na etumba ya mibale.
Batomboki babundisaki esika moko mpo na bato oyo balongolamaki na bandako na bango na mboka yango. Mapinga ya FARDC bazongisaki mabe noki mpe ba oyo ya suka bakimaki na kati ya zamba. Mwa bangonga na nsima balekaki mpe babundisaki etúká moko oyo ezalaki na ndelo kati na bokonzi mpe teritware ya Beni. Tata moko oyo autaki kobima na ndako na ye elongo na bana ba ye abomamaki na batomboki. Ba kangi bana ba ye sambo, yambo bakanga moto mususu oyo batiki ye yako lemba.
elobi Babanilawo Étienne, mokambi ya Banyali-Tchabi.
Mokozni yango emonisi ete, nsima ya likambo yango, mabota mingi bakendaki kofanda na bisika bisusu oyo bizalaki na kimya.
Esengeli koyeba ete bato basusu mitano (5) bakufaki na mboka wana, bato basusu ntuku minei na mitano (45) bakangamaki mpe bandako koleka nkama mibale na ntuku mitano (250) ezikisamaki na Bahema-Mitego.
Toyeba ete sango oyo epesamaki na baninga babiso bapanzi sango ya 7sur7.