1 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Libateli

Goma : lisasi ezwi monganga moko na lopitalo ya etuka

Monganga moyekoli moko na lopitalo ya etuka (Hôpital provincial), oyo ezali na makolo ya ngomba Goma, azwaki lisasi ntango azalaki na mosala na ndako ya kobota (salle de maternité), mokolo mwa ntuku ibale na sambo ya sanza ya yambo oyo (27 janvier).

Engebene na ba nsango ewuti na lopitalo wana, masasi mabetami na ngomba Goma etindaki ba soda ya mapinga bazonga sima na nzinga nzinga ya lopitalo. Ezali na likambo yango nde monganga yango azwaki likama liye. Azoki makasi, mpe abungisi makila ebele. Minaganga misusu basungi kobimisa ye lisasi lina. Akufi te.

Na boyokani na Comité international ya Croix-Rouge (CICR), lopitalo eye esalisaki pene na bato ntuku motoba (près de 60 personnes) bazoki na mikolo minei mileki, mbano ya semba ya bitumba ya minduki na etuka eye.

Etuluku mosusu ya bato oyo bazokaki esengelaki kozala, kasi ndenge oyo bazalaki kobɛta masasi esalaki ete kokɔta na lopitalo ezala pasi mingi.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *