Likambo lia kozanga kimia o engumba Kisangani, etuka ya Tshopo, ekomi koleka ndelo. Mikolo minso ba ike bazali kobika na bobangi, pamba te ba dongolomiso bakomi kosala ngonga nioso. Ndakisa na butu ya lelo (12/06/2025), bakoteli ba ike bisika mibale.
Na balabala ya mibale nzela ya TP o etando ya Kabondo, ba dongolomiso basimbá mandoki bakoteli libota lioko na ndako mpe babeti masasi ebele mpo na kobangisa ba ike. Bayibi ba alo alo, misolo mpe biloko bisusu ebele.
Kaka na butu ya lelo na ngonga ya mibale (2h), ba dongolomiso basusu bakoteli bato na ngambo ya Magopi mosika te na ndako ya mpepo ya Simisimi. Wana, bakoti na ba ndako babale (2). Bayibi tukutuku moko, misolo mpe biloko bisusu ebele.
Mikolo oyo, esika ata moko te na Kisangani ezali na kimia. Ba dongolomiso bazali lisusu kopona etando te. Ozala na Makiso to na Mangobo, yeba ete esengeli kozala ekenge.
