5 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Sécurité

Kisangani : ba bomi elenge mobali moko na Mangobo

Na butu ya mercredi 15 juillet ko landa jeudi 16 juillet oyo e leki, elenge mobali moko a bungisi bomoyi wa ye na commune ya Mangobo, quartier Wagenia sima ya école ya Reverand Mokili, oyo ya église CBFC ko landana rond point ya ABC.

Elenge mobali ena, a zali étudiant na Université ya Kisangani kuna na faculté ya Droit. Mokonzi to représentant ya ba étudiants a lakisi pasi wa ye na likama eye, mpe a lobi ete e zali likambo ya la police ya engumba Kisangani, pamba te commune ena e zali penza na sécurité te.

Insécurité ya Kisangani e komi ko bangisa. E sengeli na pulusu a sala mosala na ye, pamba té population eko mona pasi.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *