Bulletin épidémiologique ya mokolo ya misato (mercredi) 08 juillet 2020, e monisi ete ba beli tuku mibale na moko (21) ba biki mpe ba beli mitano (5) ba kufi.
E monisi lisusu ete ba cas ya sika kama yoko na libwa (109) oyo e ndimami e bakisami na mboka mpe ba cas kama isato tuku sambo na mitano (375) oyo bazo suspecter yango e zwamaki na sima ya bo meki meki.
Uta ebandeli ya bokono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na bato ya bokono koto sambo kama mwambe tuku mineyi na motoba (7.846) [kati na ba cas oyo koto sambo kama mwambe tuku mineye na mitano (7.845) e ndima mpe cas moko e zali « probable ». Mboka e kufisi bato kama yoko tuku mwambe na libwa (189) [kati na bango ba cas kama yoko tuku mwambe na mwambe (188) e ndimami mpe cas moko e zali probable ] mpe ba beli koto isato kama itano zomi na misato (3.513) ba biki.
Provinces zomi na mineyi (14) e simbami na bokono oyo :
■ Kinshasa e zali na ba cas koto motoba kama motoba tuku libwa na sambo (6.697);
■ Kongo Central e zali na ba cas kama isato tuku mineyi na libwa (349);
■ Sud-Kivu e zali na ba cas kama ibale tuku motoba (266);
■ Haut-Katanga e zali na ba cas kama ibale tuku motoba na mitano (260);
■Nord-Kivu e zali na ba cas kama yoko tuku sambo na mineyi (174);
■ Lualaba e zali na ba cas tuku mitano na motoba (56);
■ Haut-Uélé e zali na ba cas zomi na motoba (16),
■ Tshopo e zali na cas zomi na misato (13);
■ Kwilu e zali na ba cas mineyi (4);
■ Ituri e zali na ba cas misato (3);
■Sud-Ubangi e zali na ba cas misato (3)
■Equateur e zali na ba cas mibale (2);
■ Kwango e zali na cas moko (1);
■Haut-Lomami e zali na cas moko (1);
