Uta mokolo ya zomi ya sanza ya sambo oyo (10 juillet), bitumba ya mobulu mozali kosalama kati na ba Wazalendo mpe batomboki ba M23 na bamboka ya Kasheke mpe Buzunga, ezwami na territoire ya Kalehe o etuka ya Sud-Kivu. Bitumba biye bizali kosala ete ba ike bakima mingi na bisika bia bango, kolanda ba nsango tozwi.
Lokola bitumba yango ezali makasi, bankama ya mabota bakimi na bisika oyo bamonaka ete ezali na likama te. Mingi mingi o esanga moke ya Ihoka, na lac Kivu, etando ya Kadjucu, na territoire ya Kabare oyo ezali pembeni. Lelo na tongo, mingi balongwaki na Nyamutwe, Tshisheke, Bulemera, mpe Buhama, esika bitumba bizongeli. Batatoli balobi ete bato mingi bazali kobanga, kopunza biloko, kokɔtela bandako, mpe ata kokanga bato, mingi mingi na Buhama.
Mimbongo mizali kotambola lisusu te, mpe bato bazali koluka ekimelo na mposa makasi. Tosengi na bakonzi batalela biso likambo oyo, mpo na kobatela ba ike.
elobi mofandi moko ya etando oyo
Bitumba biye bizali na kati ya bomati bwa mobulu na nzela ya Kasheke-Lemera, epayi wapi M23 ezali koluka kozwa lisusu bokonzi bwa RN2, nzela ya ntina oyo ekangisaka Bukavu na Goma. Bankóto bwa bato oyo balongolami na bandako ba bango bazali na mayi ya komɛla te, lisalisi lia monganga te, to lisalisi lia bato te.
