Mampinga ma Congo mafundaki mardi oyo lisanga lia AFC/M23 mpo na koboma ba bato ntuku misato na libwa 39 kati na le 6 na 12 octobre na territoire ya Rutshuru o etuka ya Nord-Kivu.
Na liyebisi litiyamaki manzaka na Major Dieudonné Kasereka, ya 34e région militaire, mampinga ya RDC (FARDC) elobi ete bato « bazwaki masasi na malili na bandako na bango » to « bakangaki bango yambo na kobomama » na groupement ya Tongo kati ya Bwito, lokola mpe na Kirumba mpe Kagando na esika moko.
Mampinga mayebisi mpe ete bandako ebele ezikisamaki mpe biloko bipunzamaki na bamboka ya Rusinga, Buuma, mpe Mwigya, oyo ezwami na groupement ya Kihondo. Bato banso baye bazwaki mpasi bafundami na baye babundisaki bango ete bazali ya libota lia Wazalendo, kolanda liyebisi.
Région militaire elimboli mabe maye lokola « mbeba ya bomoto » mpe elobi ete « ekokende te kozanga etumbu libela. » Esengi mpe na ba ike « komilongola na banguna baye ya République » mpe « koyebisa ba mouvements suspects nionso na FARDC. »
