21 juin 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Lisanga

Nord-Kivu : bakumbi tukutuku balembi kofuta mpako ya 200.000FC na nzela ya Walikale-Goma

Bakumbi tukutuku oyo bazali kotambola na nzela ya Walikale-Goma na Nord-Kivu bazali koboya mikakatano oyo bakutanaka na yango epayi ya ba Wazalendo oyo bazwami pembeni ya nzela ya Walikale-Mungazi kino Goma.

Kolanda molobeli mwa bango, ba Wazalendo bazali kosala na nzela eye, kotindika bango kofuta kino 200.000 francs congolais mpe yango esali ete babungisa mosolo mingi.

Kati na ba barrières wana, oyo eyebani mingi ezali oyo ezali na Kibua, esika moto moko na moko asengeli kofuta 36.000 FC, mpe Ulilu na Mubanda, esika mokumbi tukutuku moko na moko asengeli kofuta 20.000 FC liboso ya kokatisa.

Kolanda Amani Bitaha Lucien, molobeli na bango, kolongola ba mpako ndenge na ndenge eyebani, bazali na mikakatano misusu na ba Wazalendo oyo bakutanaka na bango na nzela.

Asengi na bakonzi ya mampinga komikotisa na likambo liye mpo na kopesa nzela na bakumbi tukutuku kotambola na bonsomi na esika eye ezali na nse ya bokonzi ya mampinga ya mbulamatari.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *