Lisanga ya balakisi ya etuka ya Équateur ezwi mokano ya kopekisa grève oyo ebandaki na ebandeli ya mbula ya kelasi 2025-2026. Mokano moye mozwamaki na bomoko na likita linene lisalemaki samedi 13 septembre na Mbandaka.
François Mukadi Kashama, mokambi mwa syndicat, asakoli bozongi bwa kelasi wuto lundi 15 septembre, alimboli ete bopemisi boye bozali kolanda lifuti lia mbulamatari, eleki mposo moko, ya 50.000FC. Lifuti oyo etali mingi mingi balakisi ya sika (NU) lokola mpe baye basila kozala na masini kasi bafutami te (NP).
Na suka ya likita, nsima na masolo, balakisi bazwaki mokano mwa kotelemisa lisanga mpe kozonga na kelasi lundi oyo le 15 septembre, nzokande kopesaka na esika ya liboso mosala ya koyeba balakisi, oyo ezali na boyokani na bomatisi lifuti mpe bofuti NU mpe NP.
elimboli François Mukadi Kashama
Asepeli mpe na bosakoli bwa ekolo ya Cécile Tshiyombo, secrétaire général ya Union nationale des professeurs du Congo (SYECO), kosenga na balakisi kozongela kelasi lundi ekoya.
