O engumba Kisangani, mosala ya bilanga to « agriculture », e koma mosala mpo na ba ike o kati ya mboka, pamba te bato ebele ba lobaka eté mosala ya eye mo zali mosala ya soni. Kaba Lisolo e kutani na elenge mobali yoko oyo a bikaka obele na mosala mona.
Mwana mboka André Badjoko a zali elenge mobali a tangaka o eteyelo ya likolo, uta a banda ko sala mosala ya bilanga e leki mbula zomi, a zali ko yebisa biso tina ya mosala eye : « E sali lelo ko leka mbula zomi uta na banda ko sala mosala ya bilanga, e zali moboti na ngayi nde a lakisa nga mosala ena, yango nde e futelaka nga mbongo ya kelasi o université, na yokaka na yango soni soko moke, te pamba te e zali mosala oyo e pesaka ngayi mbongo mokolo na mokolo mpe e zali na matomba ebele mpo na ngay mpe mpo na libota na ngayi mobimba ». e lobi ye.
Mpo na baye ba lobaka été mosala ya bilanga e zalaka mosala yaba bola to mpe ya soni, mwana mboka a boyi ko fanda kimia, a pesi eyano naye : « Na mokili oyo mosala ya nsoni e zalaka te, mosala ya bilanga e zali na bomengo. Soki moto nyoso ake ko fanda na bureau sima ya mosala, bato bako liya nini ? » e tuni André Badjoko.
Mpo été mboka Congo e kende liboso, e sengeli na bana mboka ba kimela mosala ya bilanga : « O mboka Congo to zali na bisika ebele ya zamba, mpo été mboka na biso e kende liboso, na banzi été e sengeli na biso to salela mabele na biso oyo e tondi bomengo to zua ata ndakisa yaba ekolo misusu neti Afrique du Sud oyo lelo e komi mosika kaka mpo na mosala ya bilanga, oyo biso ba congolais tozo négliger, bilenge mingi lelo bazo ndima ko koma miyibi, n’a esika ya ko sala mosala ya ko lona. Boye nde mboka e ko kende liboso ? »
