Mampinga ma basoda ya ekolo Congo démocratique esakoli lundi 8 septembre 2025, ete moto moko akufi mpe libwa bazoki na botelemeli bwa bato ya Uvira, na Sud-Kivu, mpo na kotelemela botiami ya Général Olivier Gasita. Kasi, ba nsango basusu elobi ete bato bakufi bazali basato.
Soda oyo aponamaki na mokonzi Félix Tshisekedi lokola commandant adjoint ya 33e Région militaire, mokambi mwa ba opérations militaires mpe bolukiluki na etuka ya Sud-Kivu.
Kolanda lieutenant Mbuyi Kalonji, molobeli mwa mampinga ya Congo na ba opérations militaires Sukola 2 Sud na Sud-Kivu, moto moko akufaki azalaki mwana ya mibu zomi na mibale (12 ans) oyo abetamaki na lisasi ebungaki. Kati na bato libwa oyo bazokaki ezali na basoda minei mpe basivili mitano.
Bokutani na likambo liye, Mampinga ya Ekolo Congo démocratique makitisi bato mpe masengi kimia nsima na mokolo mwa mpasi lundi oyo na Uvira.
Esengeli mpe koyeba ete, kolanda mangomba ya société civile, motango ya bato oyo bakufi mpo na mwa ntango ezali na bato nsambo oyo bakufi mpe bato mingi bazoki.
