4 avril 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Santé

Nord-Kivu : Mapinga e futeli basi tuku motoba na mitano (65) mbongo ya maternité !

Général Willy Yama, commandant ya ba opérations Sokola 2, a kendaki na mapinga wa ye na hôpital général ya Rutshuru ko bimisa basi tuku motoba na mitano (65), oyo ba kangamaki mpo na ko zanga ko futa mbongo yako bota.

Ba mama wana ba sepeli makasi mpe ba pesi matondo mingi na mapinga, to yeba ete e zali mbala ya liboso FARDC e sala likambo ya boye kuna na Rutshuru.

Na tango a yambi enveloppe ya mbongo o maboko ya général Willy, monganga ya lopitalo ena ye mpe a sepeli makasi.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *