20 juin 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Actualité Libateli

Kwilu : Shabani Lukoo abandisi « Opération Ndobo » na Bandundu

Na mobembo mwa ye ya mosala mpo na libateli o etuka ya Kwilu, VPM ya Intérieur, Jacquemin Shabani Lukoo, abandisi likanisi lia « Opération Ndobo », mokolo mwa ntuku ibale na motoba ya sanza ya mwambe oyo (26 août) o engumba Bandundu, mpo na kobundisa ba mbeba ya ba dongolomiso.

Bokutani bwa likama lia kowumela ya batomboki ba Mobondo, etuka ya Kwilu ezwi sik’oyo litomba na likanisi liye, oyo ezali kopesa lisungi ya tekiniki mpe ya mosolo na ndako ya mosala ya ba pulusu o etuka ( Commissariat provincial de la PNC).

Molulu yango mosalemaki na parade monene ya PNC oyo esalemaki o esika ya mosala ya ba pulusu. Na libaku liye, VPM Shabani akundolisi ba pulusu bosenga bwa kozua bizaleli bia ndakisa, ezala na bilamba bia bango mpe na misala mia bango, mpe kopekisa lolenge nionso ya ba mbeba.

O bitenado ebele, likanisi lia « opération Ndobo », kino lelo, esali ba dongolomiso ebele bakangama.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *