30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Actualité Politiki

RDC/M23 – Mikoloto mia Washington mpe Doha : Bruxelles emonisi ete makambo mabongwani te na mabele

Bokonzi bwa Belgique esepeli na mbano ya misala ya kimia ya Washington mpe Doha. Misala miye mimemaki na botiami mikoloto na boyokani bwa kimia kati ya Ekolo Congo démocratique na Rwanda, mpe lisusu bosakoli bwa mibeko kati ya mbulamatari ya Congo na AFC/M23.

Kasi, Bruxelles emonisi ete makambo mabongwani te na mabele, mingi mpenza na est ya RDC, esika wapi bobukami bwa makoki ya bomoto ezali kokoba kosalama na batomboki.

Belgique ezali kobanga ete boyokani bosalami kati na baye bazali na matata bokobakisa na maye ya kala maye matikali kosalelama te. Ezali kopesa ntina mingi na bosenga bwa ba mbano oyo elongobani na mabele.

« Esengeli mpe tosala ete tozongisa sima te mosala moye. ». Oyo ekozala mawa ezali soki boyokani bona ebakisami na mikanda ya kala oyo endimamki kasi esalemaki te. « Ezali na ntina mingi ete mbano ya kosimba ezala na mabele, noki mpenza », esakoli Maxime Prévot, vice-premier ministre ya Belgique, mardi oyo na Kinshasa, na bokutani na bapanzi nsango bayambamaki elongo na mokambi ya Assemblée nationale, Vital Kamerhe.

Lisusu, ye alakaki kokoba ko sensibiliser na kati ya communauté internationale mpo ete misala mia kimia oyo ezali kosalama elonga.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *