Mampinga ma FARDC esakoli o’mokolo ya lomingo 7 décembre oyo bokangami bwa bato basato baye bakanisami ete bazali batomboki ba AFC/M23 na Luvungi, na territoire ya Uvira o etuka ya Sud-Kivu.
Kolanda sous-lieutenant Mbuyi Kalonji Reagan, molobeli mwa mampinga na Sokola 2 Sud-Kivu, bokangami boye bosalami na bitumba ya FARDC na batomboki ya M23 baye basungami na Rwanda.
Alobi ete bato oyo nde bazalaki komemele M23 mandoki mpe ba nsango.
Na ngonga bitumba bizali kokoba, molobeli mwa mapinga asengi na ba ike bazala na kimia. FARDC ezali kosala manso mpo na kobatela ba ike.
