Balakisi ba biteyelo ya leta na Tshopo baye lifuta na bango efutamaka na nzela ya CARITAS, bazwi naino te lifuti na bango mpo na sanza ya yambo ya mobu 2024, atako masengi mingi ya agence na bango ya kofuta. Atako CARITAS eboyi mokumba nyonso mpo na likambo yango, balakisi oyo bazali na likambo liye bazali na mposa makasi ya komona makambo polele.
Mpo na komonisa polele likambo oyo, lisanga lia balakisi ya Bafwasende ekomaki mokolo mwa misato ya mposo oyo na Kisangani. Ntina ya mobembo mwa bango ezali kokutana na bakonzi ya mateya primaire, secondaire mpe technique (EPST), mpe lisusu ba oyo ya Caritas ya Kisangani na oyo etali.
Tango Mayanga, molobeli mwa bango, asololi boye :
Tozongaki na kelasi na likanisi ete bakofuta mbongo oyo tosengelaki kofuta na nsima nayebisaki baninga ete bákoba kosala liboso. Nazo kende nanu Kisangani, tango mosusu kuna biyano bikozala. Soki makambo masimbi te, tokozwa mokano elongo na baninga na biso.
Nzoka nde, CARITAS elimboli ete likambo oyo litali ye te, yango ezali nde niongo ya mbulamatari ya ekolo Congo mpe lisanga IFOD.
Soki bozangi bososoli ezali kaka, ezali na likama ete balakisi bakosala likama na bango na kosilikisa monene ya baboti mpe banakelasi.
