Mokambi mwa Assemblée provinciale ya etuka ya Tshopo, monganga Mateus Kanga, akutanaki mpe asololaki na mokambi mwa IGF, Jules Alingete ; mokolo mwa mibale ya mposo oyo (mardi 28/05) na Kinshasa.
Lisolo lia bango lizalaki na ntina ya likambo ya ba députés provinciaux ya kala oyo bafundamaki na moyibi mwa mosolo, kasi bango batika ebonga ya assemblée provinciale uta sanza ya zomi na mibale ya mobu 2023.
Lisusu, mokolo mwa ntuku mibale na misato ya sanza oyo (23 Mai), balukiluki babale bwa IGF batosaki mibeko mwa Assemblée provinciale te. Bango bayaki kosala mosala na kozanga ndingisa ya Mateus Kanga.

Mpo na kosukisa, Mateus Kanga ayebisi mpe Jules Alingete likambo misolo mia l’Etat oyo ebengami « Evasion fiscal », oyo 70% ezali kokende na maboko ya bato o ba etukulu bwa DGDA, DGI, OCC mpe DGRPT.
Na yango, mokambi mwa IGF, Jules Alingete, azwi ekateli ya kokende o etuka ya Tshopo, mingimingi na engumba Kisangani, na mikolo mizali ko ya.



