Mbulamatari ya RDC ekotisaki mpako ya sika ya ndako ya mpepo (aéroport) oyo babengi misolo mia bokengi (Frais de sécurité), oyo esengeli kofutama na bato banso bazali kosala mibembo na Congo mobimba mpe kokende libanda lia mboka.
Ekateli eye euti na mokanda (contrat) oyo esalamaki kati na vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur, Shabani Lukoo, mpe société américaine LLC, mokanda moye mozali kokende na ba médias sociaux wuto nsima ya midi ya lelo, mokolo mwa misato ya sanza ya zomi na moko oyo (3 novembre).
Mobembo moko na moko akosengela sikoyo kofuta $30 USD mpo na mpepo moko, longola mbongo ya GoPass ya $55, mpe yango ekomema motuya mobimba ya mbongo ya aéroport na $85 mpo na mpepo moko.
Liyebisi liye, lisalami na ministre ya Intérieur, etali mibembo minso ya mombongo, ezala ya mboka mpe ya molongo.
Bakonzi, batikali makasi mpe bazali koloba ete mpako eye ezali na mokano ya kobongisa bokengi na ba ndako ya mpepo.
