Esambiselo enene ya mapinga (Haute Cour Militaire) epesi nsango moko mokolo mwa ntuku ibale na minei ya sanza ya sambo oyo (24 juillet), na ntina ya bobandi bwa bosambisami bwa mokonzi mwa mboka ya kala, Joseph Kabila. Ata soki ye azali mosika ya engumba mokonzi Kinshasa, bakosambisa ye kaka bongo.
Kolanda nsango yango, bosambisami bwa Joseph Kabila ekobanda mokolo mwa ntuku ibale na mitano ya sanza ya sambo oyo (25 juillet) o esambiselo enene ya mapinga.
Mokonzi ya mboka ya kala oyo akomá sénateur ya bomoi mobimba, azali lisusu na malendisi ma Sénat te, uta balongolaki bopikiliki (immunités) bwa ye na sanza ya mitano eleki (mai).
Likambo oyo ebandaki na Auditeur général ya FARDC, ezali na tina ya kotala bifundeli bia makasi oyo bafundaki na yango Joseph Kabila, mingi mingi na maye matali kobalukela mboka mpe kosangana na batomboki ba AFC/M23.



