Mikolo mitano mileki, mbulamatari ya RDC mpe lingomba lia batomboki ya AFC/M23, oyo Qatar ezali koangisa, batiaki mokoloto na esakola ya kosangisa na yango bikolo bibale bamipesaki na mokano ya kotika masasi na ndenge ya malamu.
Sima ya mikolo mibale, RDC na Rwanda batiaki manzaka na oyo babengi « Déclaration des principes » na Washington, bandimaki moko na mosusu bokonzi bwa bango mpe bamipesaki mpo na kosunga lisusu te mangomba ya mandoki. Kasi, atako mikano yango, mandoki yango efandi nye te o bitando ya Nord-Kivu mpe Sud-Kivu, epayi bitumba bizali kokoba, mpe yango ezali kobebisa milende mia diplomasi.
Na Sud-Kivu, batomboki ba AFC/M23 bazwaki centre ya Kaziba na territoire ya Walungu o’mokolo ya mposo; nsima na bitumba ebandaki kati na ba Wazalendo mpe mampinga ya RDC (FARDC). Bitumba wana ekotisaki bango na Minembwe, esika baninga ba bango Twirwaneho-Gumino na Android bakangami.
Bitumba ya mobulu ebimaki mpe samedi na Irhambi-Katana kati na ba Wazalendo na AFC/M23. Na ngonga wana kaka, batomboki ba M23 bazali kokoma ebele ba territoires ya Kabare na Kalehe.
Na Nord-Kivu, batomboki ba longwaki na position na bango ya liboso na Kibati kino na Walikale. Epayi mosusu, na Masisi, bitumba ya mobulu bisalamaki vendredi na babundi ya APCLS na bitando ebele ya Osso Banyungu.



