Mobulu mwa bato ya mboka oyo esalemaki mikolo mileki na Bambe, etando oyo ezali kati na territoire ya Kiri mpe Inongo, na Maï-Ndombe, ebandi kobimisa makambo ma liboso. Ba soda ba mapinga ma FARDC elongo na ba pulusu ba PNC oyo mbulamatari ya etuka etindaki kuna, bakangi bakonzi babale ya mboka.
Ezali bongo mokonzi mwa Bekeyonkoso, oyo bafundi ye ete alendisaki bato ba kotomboka, mpe mokonzi mwa Bambe-Kiri, oyo bafundi ye ete azwaki te mikano oyo esengelaki mpo na kopekisa matata yango. Bango babale bamemami o esambiselo ya Inongo.
Ntina ya mobulu yango ezali matata oyo etali koyeba soki Bambe ezali na bokonzi bwa territoire nini. Na kotalela biloko oyo FARDC mpe PNC bamoni na ebandeli, eteni ya mboka oyo ezali na ngambo ya Inongo ebebisami mingi mpe batumbi yango, mpe yango etindaki ndambo ya bato bakima.
Ntango lapolo la FARDC mpe PNC ebimaki mokolo mwa yambo ya mposo oyo (lundi), tata moyangeli mwa etuka ya Maï-Ndombe, Lebon Nkoso Kevani, awanganaki ba nsango oyo ezalaki koloba ete bato mingi bakufaki. Tii sikoyo, bakonzi balobi ete moto moko te akufi, kasi moto moko azali kaka kolimwa mpe bazali koluka ye.



