30.2 C
Kisangani
19 septembre 2026
spot_img

Nord-Kivu : yambo ya bozongi bwa kelasi, balakisi bafutami kaka te

Na mpokwa ya mobu ya kelasi oyo esengelaki kosalema le 1er septembre 2025, balakisi na ba territoires ya Masisi mpe Rutshuru o etuka ya Nord-Kivu basakolaki mokano na bango ya kozongela kelasi mpo na eleko ya poso mibale, soki mbulamatari esali meko mpo na kosilisa lifuti lia bango ya koleka sanza nsambo. Nsima na mokolo oyo ya suka, bazali kobangisa kosala oyo ebengami « grève radicale. »

Lisanga lia syndicat ya balakisi (Fosynat) ebimisi liyebisi liye samedi le 31 août, na mawa mpo na minioko mia balakisi. Exaucé Bandu, molobeli mwa syndicat, alimboli likambo oyo ya balakisi baye bazali kobunda mpo na kokokisa bamposa ya mabota ma bango mpe kutu komibongisa mpo na bozongi bwa bana ba bango moko na kelasi :

Ezali pasi komona ete basali ba Leta lokola balakisi, bazangi cahier to uniforme mpo na bana ba bango. Ezali soni.

Balakisi baye bazali na mawa mpo na bozangi bwa eyano ya mbulamatari atako bosenga bwa bango mbala na mbala na basanza eleki, mpe balakisi polele ete mbulamatari esundoli bango.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img