15 juin 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Actualité Libateli

Nord-Kivu : ba Wazalendo mpe ba M23 bazali kobunda makasi na Buabo

Bitumba ya mobulu mosalami wuto ntongo ya mokolo ya ntuku ibale na mitano ya sanza ya mwambe oyo (25 août), na Buabo, na Biholo, mpe na Muhemba na bokonzi bwa Osso Banyungu, na territoire ya Masisi, na Nord-Kivu.

O esika eye, batomboki ba AFC/M23 ya Nyabiondo mpe Kasopo basalaki bitumba mbala moko na bisika ya ba wazalendo ya groupe APCLS na bingumba misato biye lundi na ntongo.

Bitumba bizali kosalema sikoyo. Maziba mingi eyebisi ete makɛlɛlɛ ya masasi ya bibundeli ya kilo mpe ya pɛpɛlɛ ekoki koyokama na esika ya etumba.

Posa ya batomboki ezali ya komatisa makasi ma bango o esika oyo ya territoire ya Masisi, epayi wapi ba wazalendo bazali kokonza.

Lokola bokundoli, batomboki ba AFC/M23 bamekaki kobengana lisusu ba Wazalendo na esika eye pene na mposo mibale mileki, kasi balongaki te. Kolanda ba sources ya sécurité, batomboki baye babungisaki bato mingi mpe masasi.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *