Uta lisolo ya ndembo e banda na mboka na binso Congo, ville ya Kisangani Boyoma e tikala ko mema ata nkeni (trophée) yoko te. Yango to ko mituna eza kolokama, to bo zangi mbongo ?
Mituna miye moto nyoso a ko lingaka masano ya ndembo ako mitunaka. Mpo soki to tali na ba villes nyoso ya minene ya Congo, ata oyo ya mike neti Kindu na Butembo, basi ba zwa ata keni yoko. Kasi engumba enene ya Kisangani nse libungutulu, na yango to yebi te mpo na nini nyoso oyo, pamba te to zangi mpe ba équipes ya minene te.
Na banzi e zali ko zanga bolingo na volonté ya baye bako telemelaka ma sanga maye. Ba tie nse ko liya mbongo liboso, mpe ko zanga vision, na détermination mpo na avenir ya ba équipes oyo bazo telemela.
Michel Bebay

