28.1 C
Kisangani
6 août 2026
spot_img

Walikale : eloko ebomi bakangami zomi na boloko eyebani

Uta ebandeli ya mobu 2026, bakangami ata zomi (10) bakufi na boloko bonene ya Walikale o etuka ya Nord-Kivu, kolanda nsango ya « Bureau d’études et d’appui au développement de Walikale (BEDEWA) ». Ebongiseli yango elobi ete liwa yango ewutaki na bomoi mabe ya boloko, lokola kozanga lisalisi lia monganga, bozangi bilei mpe boloko etondi koleka ndelo.

Mokambi mwa BEDEWA, Maître Obedi Kamala, alobi ete bakangami oyo bazali kobela bazwaka lisalisi lia monganga te mpe kaka ndambo ya bakangami nde bazwaka bilei.

Boloko yango etongamaki mpo na koyamba bakangami ntuku motoba (60), kasi lelo ezali na bato koleka nkoto moko na nkama misato (1 300), basivili mpe basoda elongo. BEDEWA emoni ete botondi wana ezali kopalanganisa bokono mpe kobebisa bomoi bwa bakangami.

BEDEWA ezali kobenga bakonzi ba bosembo, ya bokambi mpe ya boloko ete basala noki mpo na kobongisa bomoi ya bakangami mpe kokitisa motango mwa bato na boloko.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img