Ba nzela ya Kasongolunda etondaki mokolo mwa yambo (lundi) na bato oyo bayaki kotomboka mpo na komonisa kanda na bango mpo na bomoi bwa pasi bazali na yango. Bazali kosenga mingimingi kozwa mayi ma komela, lotiliki, lisungi lia bokolongono, kobongisa banzela, mpe kofuta lifuti loa basali ba Leta.
Na mokanda mwa bango ya masengi, bato oyo bamipesaki na mobulu bamonisaki ete bazali komela mayi ya mikolo mpe ya mikɛ́lɛ, likambo oyo ezali kobimisa bikono mingi oyo eutaka na mayi, nzoka nde etando yango ezali na bokono bwa choléra. Na ebandeli ya sanza ya mwambe, bato 256 bazwaki choléra, kati na bango 25 bakufaki.
Basengaki mpe ete misala mia kopesa lotiliki oyo ANSER ezali kosala esila, mpe ete ba nzela Popokabaka-Kasongolunda mpe Kenge-Panzi ebongisama. Misala yango ebandaki na 2023, kasi kino sik’oyo esili te. Ba gbagba (ponts) Kimona mpe Nganga mpe bazali komona yango lokola ezali na ezalela ya mabe mpe ya kobangisa.
Basali mpe bakonzi ba Leta bazali lisusu kolela mpo na lifuti oyo esili koleka sanza motoba kozanga kofutama.
Moná na yango esukaki na kopesa mokanda mwa masengi (mémorandum) na mabɔkɔ ma mokambi mwa territoire.



