Kosamba ya FRIVAO : ekateli ya Cour de Cassation ezelami makasi

Esambiselo ya Cour de cassation ekopesa mokolo mwa mibale ya sanza ya libwa (2 septembre) ekateli na likambo etali ministre ya kala ya Bosembo, Constant Mutamba, mpe Chançard Bolukola, oyo bazali kolandama mpo na makambo ma kobebisa mbongo ya Leta.

Procureur asengi mbula zomi na mitano ya misala ya makasi mpo na moto na moto, bakisa mpe kozongisa mbongo oyo balobaka ete ebebisamaki. Molobeli mwa Bolukola, na ngambo na ye, azali kosenga ete bakangisa ye te mpo na kozanga bilembeteli ekoki.

RDC mpe FRIVAO bazali kosenga mpe ete mbongo ezongisama, bakisa 5.000.0000$ lokola lifuta lia mbeba oyo FRIVAO emoni ete esalemaki.

Likambo oyo etali ndenge 325.000.000$ ya lifuta oyo Ouganda apesaki RDC, mpo na kofuta bato oyo banyokwamaki, etambwisamaki. Sikoyo, Cour de cassation nde ekopesa ekateli ya suka le 2 septembre.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img