Miyibi ya ba moto ba komi ko zala mingi na avenue Mabe Sabiti, quartier Tchatchi, na commune Makiso na ngonga ya butu.
Poso moko te e koki ko leka lisusu sans que ba tambusi tuku-tuku (motards) ba botolama ba moto na bango. Likambo oyo e zali ko salema mingi mingi pembeni ya école Okapi na Parquet de Grande Instance ya Kisangani. Pasi mingi ko mona ete motindo moko te e zali ko zwama na ba konzi mpo na ko sécuriser ba ndeko na biso, mpe ba fandi ya quartier oyo.
Na sengi na ba konzi ya police nationale ba meka ko zongisa kimia na esika oyo.



