Bitando ebele o engumba Kisangani, etuka ya Tshopo, bazangi mayi ma peto ya komela wuto pene na poso moko. Yango ezali mikakatano mingi pamba te mikolo oyo, bokono bwa choléra esakolamaki polele mpe ezali kokoba kati na engumba mpe etuka mobimba.
Nzoka nde, bokono bona esu ezwaki bato koleka 3.939 mpe basusu 254 bakufi. Lolenge la kobundisa yango malamu ezali te, pamba te mayi ma peto ya REGIDESO ezali te.
Kozanga mayi ezali kotungisa mingi bandako mpe biloko ya bokolongono, lokola centre ya bokolongono ya Saio, esika wapi baye babeli batindami na makasi mpo na kobimisa mayi na mabulu ya maboko, mpe yango ezali kobakisa likama lia bosoto.
Likambo oyo ezali kotungisa basali ba kolongono ya nzoto : na lopitalo, bazali na posa ya mayi mpo bazali na babeli ya kobikisa, ya kosokola, mpe ba posa misusu, kasi mayi mazali te.
Bafandi mpe bazali konyokwama na bozangi boye, na milende ya mpamba mpo na kozwa mayi ata na butu makasi, kolanda maziba ma mboka.
Na oyo etali ntina ya bokati mayi, na liyebisi ya bapanzi nsango ya mokolo ya 25 juillet, REGIDESO elakisaki mbeba na nsinga ya SNEL, nzoka nde SNEL eboyaki efundeli oyo, koloba ete bokati yango bozali ya REGIDESO. Kasi, SNEL elobaki ete endimi kosunga REGIDESO mpo na kosilisa mokakatano oyo.



