32.2 C
Kisangani
19 septembre 2026
spot_img

Kisangani, lifelo

O engumba Kisangani, etuka ya Tshopo, ba Ike bazali konyokwama uta mposo eleki, na ntina ya makambo kilikili bazali kobika. Ndakisa uta mikolo mibale (2 jours), lotiliki ya SNEL na mayi ya REGIDESO ezali te.

Na liyebisi lia bango ya mokolo mwa mwambi ya sanza ya ibale oyo (8 février), bakambi ba SNEL balobaki ete lotiliki ekokatana mokolo mwa libwa kino oyo ya zomi na misato ya sanza oyo (du 9 au 13 février), na ntina ya misala mia kobongisa masini ma mibale o ndako enene ya lotiliki ya Tshopo.

Nzoka nde, tango bakati lotiliki, mayi mpe ekatani. Mpo na koluka mayi, ba ike bazali kotambola ngonga molayi kino na ba sources, basusu bazali kokende na ebale. Kuna nde baboti bazali kobangela bana, pamba te, ndakisa na Tshopo, mingi babungaka na kati ya mayi.

Mokolo mwa zomi ya sanza ya ibale oyo (10 février) na tongo, pasi ya ba ike emati lisusu makasi. Milelo na milelo, bayebi te balokimela wapi. Kasi bazwi nsango malamu epayi ya tata moyangeli mwa etuka ya monyele, Paulin Lendongolia, oyo alobi ete mosolo mpo na kobongisa makambo mana manso esi efutami.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img