Ba yekoli ya engumba Kisangani mpe ya RDC mobimba basukisi momekano mwa EXETAT, mokolo mwa minei ya mposo oyo (27 Juin 2024). Momekano moe mobandaki uta mokolo mwa yambo mpe esili na kimia nioso.
Kosila ya momekano oyo epesi esengo mingi na bayekoli ya enguba Kisangani, bamonisi esengo na bango na ba lolenge ebele. Mingi ba misopeli poudre lokola ba sali ya masini ya fufu, misusu ko sepela likolo ya tuku tuku na lombango ya makasi, misusu ko ndima eleki makasi bakomi na bilamba bia bango ba pourcentage oyo bako zwa, misusu ba pasoli bilamba na bango ya kelasi elembo ya komonisa ete mbilamba wana « elamba elia », bako lataka yango lisusu na bomoyi bwa bango te.
Moko ya bayekoli asololi na micro ya Kaba Lisolo na ntina ya esengo na ye :
Examen eleki kitoko makasi na monisa esengo na nga te mpo na nini ? Biloko binso oyo balakisi batangisaki biso nde ebimi, kosepela na nga ebandi lelo ti mokolo résultats eko bima na ko sepela kaka.
maloba ya Sarah, moko ya bayekoli


Kasi mpo na molakisi Victor, ye amonisi ete :
Ezali malamu te ko pasola bilamba ya kelasi mpe kosepela motindo oyo. Kosilisa momekano elimboli te olongi mbala moko, esengeli na bayekoli bazonga ndako na kimia nioso mpo ete etape ya motuya makasi nde ebandi, na etape eye soki moyekoli apasoli bilamba na lombango alors que asali momekano na ye malamu te, tango vodacom eko pesa ye eyano ete azwi te, ako tonga eteni ya uniforme ya pembe na ye na singa ya motani mpe miso eko tela ye.
Kasi ata ko ba kosepela mitema na bango mizali nse kobeta mpo ete résultats ya solo ebimi nanu te.



