29 avril 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Kelasi Lisanga

Kisangani : biteyelo bizali koteka biloko bia kelasi ntalo makasi, bayekoli mingi bazali kotanga te

Mposo mibale nsima na ebandeli ya mbula ya kelasi 2025–2026, banakelasi mingi o engumba Kisangani bazongi naino na kelasi te. Ntina : biteyelo bisusu esɛngaka baboti básomba biloko bia kelasi kaka na kati ya biteyelo na bango, na ntalo oyo etalelami ete eleki ndelo mpo na mabota.

Matatoli oyo ezwami o engumba yango emonisi ete bato ba biteyeko bazali kotungisa ba ike mingi.

Tozali kotindama na makasi tósomba ba cahiers mpe ba uniformes na kelasi, atako tosilaki kosomba yango na zando. Yango ezali mokakatano.

elobi mwana kelasi moko na nkuku

Momeseno oyo ekeseni na malako ma Leta

Nzokande, momeseno yango epekisami na Ministère ya Education nationale. Ministre provincial ya Education na Tshopo, Simon Masimango, andimi ete ayebi likambo liye mpe asakoli bofungoli bwa bolukiluki mpo na koyeba biteyelo biye bizali na likambo.

Yango esi epekisami na ministre national. Esengeli baboti bazala na makoki ma kosomba biloko na ba zando, kasi te bafutisa bango ntalo ya koleka ndelo na biteyelo.

elimboli ye

Simon Masimango akebisi ete bakonzi ba biteyelo baye babuki epekiseli eye bakutani na etumbu makasi, kobanda na bopemisi misala mia bango kino na bofundami ya mibeko.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *