Na bokebisi bwa ba ike, pulusu ekangaki bato mitano baye bakanisami ete bazali kosala mabe, bayebani mingi na kombo ya Kuluna. Kati na bango basi minei, mokolo mwa yambo ya mposo oyo na Pompage, moko na ba balabala ba etando ya Ngaliema.
Biro ya pulusu ya Pompage ezwaki rapore yango na ba ike ntango bituluku mibale ya ba Kuluna ebundaki.
Mbala nyonso, tozwaka ba rapore ya ba ike na ntina ya misala mabe ya ba dongolomiso na esika babengi nzete ya manga « Sous le manguier », mosika te na balabala Bambeko. Kuna, ba Kuluna basala mabe meke. Likambo lia kokamwa, basi bazali kati na bango. Lelo, tozwaki mokano ya kosala bokiti kuna mpe ya solo, tokuti bango na mosala mobimba. Mibali yango balongaki kokima.
elobi Jean-Marie Kwet, mokambi mwa pulusu
Bakambi bwa ba pulusu basengi na ba ike bakoba kofunda bato banso bazali kosala ba mbeba, mingi mingi ba kuluna oyo basili konyokola ba ike.



