32.2 C
Kisangani
19 septembre 2026
spot_img

Kinshasa : bato basato (3) bakufi na mbula

Mbula makasi oyo enoki na butu ya lelo (12 novembre), ekotisi lisusu Kinshasa na mobulu. Bato basato babungisi bomoi bwa bango, moko na balabala Assossa na Bumbu mpe mosusu na balabala Matondo na Selembao.

Bitando ebele ya nse, na kati na yango Masina, Ndjili, Limete, mpe Kintambo, etondi na mayi mpo na bibale oyo etondi mpe bozangi bwa ba caniveaux. Ba gbagba oyo ekangisaka Kauka na Matonge ekweyi, nzoka nde ba zando ya Lufungula na Kalembelembe ebebaki mingi.

Na Selembao, ebale Makelele ezali kokoba kobuka mabele (érosion) ya kobangisa. Mituka mizali kaka pasi na ba quartiers mingi, na bandako oyo ezindi na mayi.

Likama oyo ya sika ezali komonisa ete engumba-mokonzi ezali na likama oyo eumelaka mpo na mbula, oyo ekómi makasi mpo ba ndako mpe ba nzela oyo ezali kobukana mpe makambo oyo mbongwana ya klima ezali kobimisa.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img