Butu mosusu ya somo eningisi etuka ya Ituri na est ya RDC. Bato koleka ntuku minei (+40) babomamaki epayi ya batomboki ba ADF oyo bazali na boyokani na Etat islamique en Afrique centrale (ISCAP). Bobomi boye bosalemaki na butu ya lomingo oyo ya 27 juillet, na Komanda, engumba oyo ezali na ntaka ya kilomètres ntuku sambo na mitano (75km) na Bunia, na territoire ya Irumu. Motángo ya bato oyo bakufi ezali kaka mpo na mwa ntango mpe ekoki komata.
Engebene n’a masolo mingi, babundi baye bapanzani na butu, kobundisa basambeli ya Katolike oyo bayanganaki mpo na kokengela na ndako ya Caritas, pene na lopitalo monene ya Komanda. Kati na baye bazwaki mpasi ezalaki na ba catéchumens mingi, oyo basengelaki kozwa elambo ya Confirmation mokolo oyo elandaki.
Bazalaki kotumba bandako, mpe bazalaki kopunza to kobebisa biloko. Balobi mpe ete motuka moko ya monene ya mosali mwa mombongo na Oicha ezikisamaki, kolanda ba témoins.
Bobomi boye bosalemaki penza na kati ya Komanda, epayi wapi mapinga msengelaki kozala makasi mingi mpo na kopekisa likambo oyo.
Na ntongo ya mokolo ya lomingo oyo, mpasi mpe nkanda ezalaki kotalisama epayi ya ba ike. Ba nzoto ya baye bakufaki elalaki kaka na esika ya likambo, nzoka nde bavandi oyo bazwaki mpasi mingi baboyaki kokunda bango kino bakonzi ya etuka bandimaki bonene bwa likambo lia mawa.



