27 juillet 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Lisanga

Haut-Uélé : mituka koleka 350 ekangami na nzela ya Durba-Faradje

Mituka koleka nkama misato na ntuku mitano (350) ekangami sik’oyo na eteni ya Durba-Faradje ya nzela ya ekolo 26 (RN 26) o etuka ya Haut-Uélé, mpo na ezalela ya kobeba makasi ya nzela eye na eleko oyo ya mbula.

Yango ekebisamaki na député provincial Yoassa Avama Tamile, moponamo ya Faradje, o’mokolo ya lomingo le 21 septembre 2025. Kolanda ye, bakangami oyo ya mituka ekoki kozala na bopusi na bomoyi bwa mokolo na mokolo ya population ya etuka ya Haut-Uélé na mua mikolo soki eloko moko te esalemi noki.

Mawa na ngai ezali ete eteni ya Durba-Faradje ekatamaki pene na mobimba; mobembo mozali lisusu te, mpo mituka koleka 350 ekangami pene na Kpondho. Mituka miye mizali komema biloko mingi miye misengeli kopesama o etuka ya Haut-Uélé. Soki biloko biye bitikali kolala, ekoki kozala na bopusi mabe na ntalo ya biloko na engumba Isiro.

elimboli moponami

Liboso lia mpasi oyo basaleli bazali koleka, député provincial apesi toli ete mbulamatari ya etuka etinda nokinoki ba masini mpo na kotondisa mabulu ma potopoto oyo ezali kopekisa mobembo mwa mituka na eteni ya Durba-Faradje.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *