36.8 C
Kisangani
14 septembre 2026
spot_img

Haut-Katanga : bato ntuku mwambe na misato bakufi na bokono bwa choléra

Bato nkoto moko na nkama misato na ntuku nsambo na sambo (1.377) bazwamaki na bokono bwa choléra, kati na bango ntuku mwambe na misato (83) bakufi. Nyoso wana na boumeli ya ba mposo misato kaka, na etuka ya Haut-Katanga.

Ba lopitalo zoom na mwambe eyambi babeli bwa bokono wana ebele. Kati na bango, ba lopitalo mitano kaka nde bozali na minganga oyo bazali kosunga mpo ya kolonga bokono bwa choléra. Ba lopitalo ya ba etando ya Likasi mpe ya Mura nde ezali na babeli ebele koleka. Na ngonga oyo, bato ntuku mwambe na misato basili kokufa.

Mpo na kobundisa bokono bwa choléra, bakonzi bwa etuka ya Haut-Katanga batondisi bakisi na ba lopitalo, epayi wapi minganga bazali kosalisa babeli.

Kasi esengeli boyeba ete MSF alobi ete bato bakufi koleka ntuku mwambe na misato. Kolanda na basango ya MSF, bato nkama moko na zomi na minei (114) nde bakufi. Yango elakisi ete bokono bwa choléra bozali kopanzana na lobango makasi na etuka ya Haut-Katanga.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img