32.2 C
Kisangani
19 septembre 2026
spot_img

Bukavu : bana basato ya libota lioko bakufi na likama lia motò na Nyalukemba

Bana basato (3) ya libota lioko bakufi na mawa na likama lia motò oyo epeli na tongo ya mokolo mwa zomi na mwambe ya sanza ya zomi oyo (18 octobre), na quartier Nyalukemba, na balabala Kayabu 2 o engumba Bukavu, etuka ya Sud-Kivu.

Motò yango ebebisaki mpenza bandako motoba. Engebene na batatoli, bilenge bia etando bamekaki kopekisa kopalangana ya motò na biloko oyo ezalaki, kasi kozanga mituka ya koboma motò mpe penepene ya bandako esalaki ete mosala yango ezala pasi.

Makamá ma boye mazali mingi na Bukavu, engumba oyo kozanga makoki mpe bandako oyo ezali na bato mingi ezali kokómisa likambo yango makasi. Ntina ya likambo ya mawa eye eyebani te, mpe yango ebimisi mitungisi mpe nkanda na bavandi.

Na basanza oyo euti koleka, makamá ma motò pene na zomi elobamaki na engumba-mokonzi ya Sud-Kivu, oyo ebungisi bato mpe biloko mingi mpe etikaki mabota mingi kozanga ndako.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img