36.7 C
Kisangani
15 septembre 2026
spot_img

Bukavu : babeti moteyi Kelly Bahati masasi mpe babomi ye

Pasteur Kelly Bahati Kazibaziba, 50 ans, abomamaki na masasi na ndako na ye ezwami o balabala Michombero engumba Bukavu, mokolo mwa zomi na moko ya sanza ya mwambe oyo (le 11 août 2025). Bobomi boye, balobeli yango lokola elengelamaki, yango esalamaki na miso ya bandeko ba ye.

Bato oyo bazalaki na bibundeli bakɔtaki na ndako na ye mpe babɛtaki ye masasi na ntolo. Mowei azalaki moteyi ya eklezia Nouvelle Vie mpe mosali ya mbulamatari ya Congo. Azalaki nkulutu ya Joseph Maombi Kazibaziba, mosali mombongo oyo, kolanda libota liye, azwi bobungisi makasi wuto kokweya ya engumba Bukavu.

Biloko bia Maombi, kati na yango mituka mpe mabanga ya ntalo, elobami ete bayibaki, mpe biloko misato na ye bizali sik’oyo na batomboki ba M23.

Libota yango bamonaka ete koboma moto yango ezali koluka kobangisa moto yango ya mombongo. Mobali ya libota mpe mokonzi ya mangomba, Kelly Kazibaziba azalaki na boyokani ya politiki to ya basoda te.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img