Makambo ya minene oyo esengeli kobosana te uta na bopanzi sango ya Vice-Premier ministre, ministre ya Intérieur, ya Sécurité, Décentralisation mpe Affaires coutumières Jacquemain Shabani Lukoo, na ntango ya bokutani oyo esalemaki mokolo mwa misato ya sanza ya ibale oyo (3 février) elongo na molobeli mwa mbulamatari Patrick Muyaya.
Jacquemain Shabani Lukoo azongeli likambo lia libateli na bitando binso ntuku ibale na motoba (26 provinces) ya RDC na ngonga oyo mboka ezali kokutana na bitumba oyo Rwanda ezali kosalisa yango sima ya batomboki ba M23. Bango basili kozwa ndambo ya engumba Goma. Kino lelo, bato nkoto mibale (2000) bakufi, kozanga kotánga malita ma bato ebele.
Chef ya sécurité mpe affaires territoriales andimi ete bitando binso bizali ya kotelema mpe etali mingi likambo lia Goma, epayi wapi mapinga ma FARDC na ba wazalendo bazali kokoba kotelemela na ba quartiers misusu.
Jacquemain Shabani Lukoo asengi lisusu na ba Congolais batikala na mosala mpe ba tingama na misala oyo ezali na tina ya kosunga makasi mampinga ma FARDC mpe misala oyo ezali na mokano ya kosunga misala ya bitumba. Abakisi ete makambo ma kokita o nzela mpo na kopanza biloko ezali misala milembisaka nkita ya mboka. Libaku mpo na ye kobenga ba Congolais bayengayenga na bonsomi na misala na bango.
