19 mai 2024
Ville de Kisangani, RD Congo
Infrastructure

Tshopo : misala ya kobongisa nzela ya RN4 mikowumela sanza ntuku minei na mwambe

Mokolo mwa lomingo moleki, ministre atali makambo mwa kotonga na RDC, Alexis Gisaro, atiaki libanga ya yambo mpo ya kobongisa nzela ya RN4, oyo elonwge Kisangani ti Beni.

Mpo na milulu maye mwa botieyi libanga ya yambo, Alexis Gisaro azalaki elongo na mokambi ya etuka ya Tshopo, Madeleine Nikomba Sabangu.

Misala miango mitali ba nzela biye bisangisi Kisangani na Bafwasende, mpe Komanda na Beni. Yango ezali molayi ya 748,50km.

Kasi, bakonzi ya mboka balimboli ete misala miango mikowumela sanza ntuku minei na mwambe. Boyeba ete uta ba mbula ebele, nzela wana ezali yako beba makasi. Na yango, kobongisa yango ezali sango elamu mpo na ba ike.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *