26 septembre 2023
Ville de Kisangani, RD Congo
Société

Tshopo : Madeleine Nikomba a pesi mokonzi ya SNEL toli mpo na likambo ya lotiliki na Kisangani

Likambo oyo ezali kokoba kopesa bafandi ya Kisangani kanda makasi. Uta mikolo ebele penza, kolanda mbula mibale, engumba Kisangani ezali na lotiliki ya malonga te. Na yango, mokonzi ya Tshopo, Madeleine Nikomba, akutanaki na mokambi ya SNEL, Alphonse Kitambala, vendredi 14 avril oyo.

Na Kisangani, lotiliki ekoma lokola wolo. Moto nyoso azwaka yango te. Bipayi mingi, ezongaka kaka na butu makasi, mpo ekende na tongo. Na ba quartiers misusu, ata na butu mwinda epelaka te. Bafandi ya Kisangani ba lobi ti ba lembi, mingi basalelaka kaka ba panneaux solaires to ba groupes électrogènes.

Kasi, Madeleine Nikomba, Gouverneure ya Tshopo, atungisami makasi mpo na likambo oyo. Nde yango, abengi DP ya SNEL na esika na ye ya mosala, mpo na kosolola likambo ena, mpe ko zwa biyano.

Madeleine Nikomba a yebisi Alphonse Kitambala été, ata soki Centrale hydro-électrique ya Tshopo ezali ko pesa lotiliki moke, moto nyoso akoki ko zwa litomba ya lotiliki moke. Mama Gouverneure asengi na mokambi ya SNEL a tala likambo litali délestage malamu mpo ete Boyomais nyoso azwa lotiliki moke moke.

Bo yeba ete sango oyo epesami na ba panzi sango ya gouvernorat, oyo ba talisi lisusu ete misala ya bobongisi groupe numero 3 ya Centrale ya Tshopo eko koba na mikolo mizali ko ya.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *